Boko bayi Kongo bamoni ba buale mingi mikoloyo na ba mayi ya ekolo na biso na monyele mua ekolo. Na Beni na bato badindaki na yoko buato na Simuliki babikisi mitano kasi na Fizi nde baye badindaki na yoko masuwa bango nde sango na bango ezali nde kaka pasi te lelo
Mangomba union Africaine na Union européenne babandi lelo likita na bango ya mobu basalaka yango mobu inso. Ezali bongo likita na bango ya mbala tuku mibale na mitano wuta babanda yango. Nioso wana kaka pona kolandela kotala ndenge nini boyokani na bango ekotambola.
Bongo na Kongo central Bayi quartier Mpozo na Matadi bakonyokwama na bozangi mayi ya pompi pe basengi ba ntoma na bango balobela bango po mayi mapesamela bango. Kompani ya mayi Regideso elobi ezali na kokoso pona kokomisa mayi na Quartier mpozo kasi bakotindaka kaka ba factures po bayi quartier bafuta yango.
/sites/default/files/2025-11/24112025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3





