Na Nord Kivu , Bitumba bikobaki lisusu mua mosala misato na ba groupement ya Kibumba pe Buhumba kuna batomboki ba M23 baakomeka koluka kokota na Goma na nzela ya ebombelo nyama ya Virunga…..
Tokolobela pe mateya mapesami na bilenge leka kama misato na Uvira o etuka ya Sud Kivu na lisungi ya mbula matari ya ekolo Japon kolanda na muango na bango ya lisungi sima ya bokono ya Covid 19….
Na Kananga ntoma ya ekolo Suede akendeki kotala esika ekobikaka baye bazongisama o ekolo kowuta na Angola na Tshilumba , kuna atalaki pe muango misusu ndenge na ndenge…
/sites/default/files/2023-11/01112023-p-l-journallingalasoir-00web.mp3