soir

1. Bukavu :  O Bukavu…likama lya moto libomi bana kelasi zomi na mitano. Moto mona mozikisaki complex e scolaire Furaha, na eteyelo Chez Mugo. Societe civile esengi boluki luki esalema na lombangu mpo na koyeba nani mpenza atumbi biteyelo bina.

2. Kalemie : Kimia ezongi o ntei ya societe ya mabanga ma ntalo ya  Manono Lithium. O Mikolo milekaki basali ya societe mei, basilikaki. Basengi te, babongisela bango mbongo ya lifuti lya bango.

3. Goma : O etando Masisi, Bai societe civile bazali kosenga te manso masalema mpo na kotia kimia ona etando, mpe bato ya mitema malamu bayeba komema  na lombangu lisungi  mpo na bato ya mboka ndenge bazali konyokwama. Mpamba te ona etando bitumba bingali makasi nkati ya AFC-M23 na lisanga lya Ba Wazalendo.

/sites/default/files/2026-09/100926-p-l-journal_lingala_de_ce_jeudi_soir_11_septembre_2026-00-_web.mp3