Ba sango ya lingala , mokolo mwa mitano na pokwa 11092026
Sango Na mokuse...
- Bato koleka nkóto mibale baye bazwaki mpasi na likama Ya moto oyo ebimaki mokolo mwa minei moleki na ba avenue Funu B mpe Kasheke, balekisaki butu na bango ya yambo na libándá, mpo kozanga esika ya kolala.
- Na etuka Sud-Ubangi, emonani tèe, bokono ya Ebola ekoti na etando ya bokolongono ya Gbulu. Endimisi yango euti na mbano ya bolukiluki oyo Institut National de Recherche Biomédicale, INRB, esalaki na échantillon oyo ezwamaki kuna.
- Na Nord-Kivu, basali, bilanga koleka nkóto minei na secteur ya Beni-Mbau basili kozwa litomba na mosala moko oyo ezali na mokano ya kozongisa makasi misala ya bilanga na bisika ndenge na ndenge ya territoire ya Beni
- /sites/default/files/2026-09/11092026-journallingalasoir-web.mp3




