Tokokoba na kolobela bobomami ya bato na Masisi , bayi kabila ban yali Kilo batalisi bilembo ya mua tango te’ bato tuku mitano na mitano baweyi pe tuku misato na mineyi bazoki makasi nzoka nde bolukaluki bozali naino kosalema…. Nzoka nde ...bayi mampinga ma ekolo pe batalisi makanisi ma bango na likama liye…
Maponami po ya mbala ibale o Bituka Tshopo pe Kongo Central monganga Guy Bandu Ndungidi aponami bo’ moyangeli ya etuka Kongo Central ,nzoka nde na Kisangani o etuka ya Tshopo baweli ebonga banso babale bazui bilembo ndenge moko ….
Efongumamaki uto lobi loleki na Africa ya ngele likita o matali misala ya makele too Indaba ,kuna ezuami ministre wa yambo ya ekolo Rdc pe booko ba ministre bakisa pe bayi misala mimbongo limpinga loiye ekeyi koluka lolenge ya kobengisa bayi mimbongo ya makele o ekolo Rdc…
/sites/default/files/2022-05/10052022-p-l-journallingalamatin-web.mp3