Journal Lingala soir

  • KINSHASA: Uta tongo ya lelo kimia esili kozonga na etando ya Université ya Kinshasa, nzambi ministre wa ESU apesaki na bayekoli banso mikolo mibale balongwa  na campus ya université/sites/default/files/2020-01/08012020-a-l-journallingalasoir-00.mp3
  • KINSHASA:Bokono bwa kintruntu bosili koboma bato koleka koto moko , OMS ebwaki mbela bapesa mislo po ya kosunga bakoni soki te ezali likama makasi
  • BENI: Ba tomboki ya ba Mai Mai bakendeki kotumba esika ezuami bariere na esika basokolaka maboko po na kobundisa bokono bwa Ebola, societe civil etelemi ekela wana
  • KINSHASA: ba nzela mingi ya engumba kinshasa ezali ya kobeba kasi baye basengeli kobongisa yango bayi bosana, bayi mboka basengi na bakobnzi basala mosala mwa bango bo esengeli
  • KINSHASA: Bakobanda kozua zomi na mitano likolo ya mokoma ya lifuta ya prime ya basali ba l'Etat bo mpako , yango ezali okati ya mobeko likonzi
  • KANANGA: general Caumba alongwe na Kasai central batindi ye na Kwanga , kasi azali na esengo ya kotika etuka naye na kimia, apesi matondi epayi ya baninga naye mapinga  basalaki elongo naye