Booko bokeseni bozuami kati na ba ntoma ba ekolo sima ya lisikulu ya mokonzi wa ekolo o likita linene ya Onu tokolanda makanisi ma bango kati na sango eye…
Awa na Kinshasa lisanga Cogep eye ekolandelaka boyangeli bolamu ya misala mya l’etat esengi na mbula matari kobimisa polele boyokani o matali misala ya makele kati na ba copagnie ya ekolo Congo Demokratiki Sakima na ya ekolo Rwanda Dither .
O Ituri mituka leka mokama mikangemi na nzela Bunia -Mahagi po ya bobebi ya nzela , tala ntina bakumbi mituka basengi na mbula matari kopesa mitindo po ya kobongisa ba nzela o eleko eye ya bofandisami ya mampinga kuna .
/sites/default/files/2021-09/22092021-p-l-journallingalasoirweb.mp3







