Na Goma , mabota leka mokama baye bazuaka makama kowuta na botomboki ya ngomba ya moto babandi kozonga malembe malembe o mpango ya bango biye bizika ,nzoka nde yango epekisamaki na mbula matari ntina tokoyeba yango kati na sango beye….
Molongo mobimba ekundoli mia zomi na mibale eye mokolo ya mafilime , o Ituri bayike kati na bango bazangi misala po ya bitumba ya batomboki o ba territoire ya Djugu pe Irumu, nzoka nde baye baakosala bakozuaka pe lifuti bo’ elongobani te…..
Esukaki pe mia zomi na ibale eye na Cape town o Africa ya ngele likita po ya mbala tuku mibale na mitano o matali misala ya makele too Indaba, ministre wa yambo ya ekolo Rdc andimisi na bayi mimbongo kuna te’ booko mabongisi maakosalema po ya kimia o ekolo na ntina ya kotombola misala….
/sites/default/files/2022-05/13052022-p-l-journallingalamatin-web.mp3