Ituri , bayi mboka baakokima o ba localite leka zomi na mitano na nzela Loya-Mambelenga yango etalisami na yoko limpinga ya Monusco eye ezuamaki o mobembo ya mosala o eteni ena ya territoire ya Irumu ….
Na Beni , balakisi ba biteelo bazui mokano ya kozongela mosala se’ soki babongisi lobiko la bango , batalisaki makanisi maye mua yenga o bosukisi likita monene na lisanga ya balakisi o ekolo eteni ya Beni ….
Na Haut Uele, bayi societe civile batomboli mongongo po ya kopalela boluki makele o maboko na booko bayi ekolo Chine, bango basengi na mokonzi wa ekolo pe ministre o matali misala makele kondimisa mibeko ya ekolo o matali likambo liye .
/sites/default/files/2021-09/20092021-p-l-journallingalasoir-web.mp3