Na Sud Kivu , moyangeli etuka Theo Nguabije kasi pe mbula matari wa eye bakueyisami na ndako bontoma ya etuka …kati na ba ntoma tuku mineyi na muambe , tuku mibale na muambe baponi kolongola bango o mosala…
Ituri batomboki ba Adf babundisaki lisusu centre ya Luna o butu moleki , bato babale baweyi pe basusu bakumbami bisika biyebani te, tala ntina bayi mboka basengi na bayi mampinga ba ekolo Ouganda kosunga ba Fardc na kosukisa batomboki ba Adf o etando ena….
O etuka ya Mayi Ndombe, yoko elenge moseka aweyi sima ya bozuami na makasi na molakisi wa ye , libota pe bayi mboka na kanda batumbi booko ba ndako o tango molakisi oyo aakomonana te…
/sites/default/files/2021-12/02122021-p-l-journallingalasoir-web.mp3