Ndenge toyebisi bino lelo na tongo. Yoko likita ya motuya libandi lelo na ekolo France pona kosenga kimia pe bofuluki boyingela na lombango na Rdc pe mikili ya Affrica ya mayi ya bitima minene.
Kotinda to kozua misolo na nzela ya telephone ezalaka nango banda kala ata pe na Rdc. Kasi mikoloyo na Goma yango nde ezali nzela monene penza ya kotambusa mbongo na engumba eye. Kasi ba ndeko bakosala mosala yango baleli te ba mbongo bakokata bango neti matabisi ya ba kompani ya telephone. Matabisi yango eleki likolo makasi.
Balakisi ya Kasai central na mabota na bango bakomilela lisusu te pona oyo etali komisalisa nzoto soki babeli. Pamba te linaka pona kobanda kosunga na ngonga yango libandaki lobi mosala yango. Elingi koloba : molakisi nioso azwi nzela sikawa ya kokenda komisalisa ya ofele ye na bato baneyi ya libota naye soko babeli.
/sites/default/files/2025-10/301025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3
 
        







