1. Goma : Damien Mama, Coordonnateur humanitaire Mpe ntoma molandi ya secretaire general ya ONU o RDC, azwami o Goma. Ezali mbala ya ye ya liboso konyata mabele ya engumba ena. Kuna akomanyola misala mitali lolonge bazali kosunga bato bazali konyokwama na bitumba nkati na ba AFC-M23 na Mapinga ma ekolo.
2. Matadi : O Kongo Central basali ya leta bazali kozwa lifuti lya bango mobimba te. Yoko Lisanga lya basali, SYNCASS etelemeli likambo lya kokata kata lifuli lya basali ya leta mpo na ntina eye ezoyebana te.
3. Bukavu : O Bukavu, Mpasi ezali naino makasi o ntei ya mabota ya bato bazwaki likama lya moto, mingi mabota ya bana ntuku mibale na sambo bakufaki o nkati ya likama lya moto. Collectif moko esengi mabongisi mazwama mpo na koyeba kobondo mitema mya baboti mizoki na likama.
/sites/default/files/2026-09/17092026-p-l-journal_lingala_de_ce_jeudi_soir-00-_web.mp3







