1) Kalemie : Sango ya likama o etima Ntanganyika... Masuwa moko esali likama. Bato ntuku mibale na misato bakufi... Boko bato babiki, nkasi ebele ya bato bakomonana. Masuwa mana mawutaki na Ngambo ya ekolo Tanzanie mpo na kokota o Kalemie.
2) Kinshasa : Première Ministre ya RDC Judith Suminwa O boso ya mesa ya likita likene ya ONU. Kuna atalisaki mposa ya ekolo Congo démocratiques O maye matali mpasi minyoko ekolo ezali komona wuta bitumba O monyelee mwa ekolo Congo démocratiques.
3) Kinshasa : Awa O Kisasa bato ya bilanga O commune ya N'sele bazali na kanda zambi boko bato bako linga kobotolo eteni ya mabele esungaka bango kosala misala mya bilanga. Basengi na bakonzi batalela bango likambo lyango malamu.
/sites/default/files/2026-09/24092026-p-l-journal_lingala_de_ce_jeudi_soir-00_-_web.mp3




