Journal lingala matin

Ndenge toyebi Eklesia katoliko ezalaki lisusu na mokonzi te po papa Francois oyo ezalaki mokambi ya eklezia eye akufi pene na poso misato yangoyo. Lelo nde ba cardinaux bako banda maponami na bango pona kopona papa ya sika.

Sanza mibale yangoyo mvula ekonoko mingi na Kisasa. Toloba  ata mikolo misato to mineyi na poso. Pe ezali konyokolo bato penza. Ba balabala, ba avenues pe mapango ebele kotonda na mayi. Biloko kobeba. Ba ndako kobukana pe pasi na motema tango mosusu bato pe kokufa. Awa tozoloba boye mabota ebele ya quartier Bisengo commune ya Bandalungwa bakoma nabango kolala libanda. Po mayi ya mvula efandi neti libela naba ndako pe ba avenues na bango.

Kala nioso oyo tokanisa te bokono ya maba esila nango na mokili. Kasi tomikosa po bokono bona boza kaka. Na Djugu na Ituri boko babeli na yango bazali. Se lokola na Kasai Oriental babeli kututu pe bazali.

 

/sites/default/files/2025-05/07052025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3