Yoko likita ya motuya ebandaki lobi na Angola kati mikili ya Africa pe boko mangomba pe batindami ya mbulamtari ya America. Tata Mokonzi ya ekolo na biso Rdc pe azalaki kuna. Pe pona ye bo elobi molobeli na ye likita yango ya Angola ezali pona neti kotombola bofuluki ya ekolo na ekolo ya Africa pe mboka ya America.
Na Etuka Kwilu. Balakisi ya Idiofa balobi bazwi lifuta na bango ya sanza mibale te. Pe laki kotemisa misala na bango soko bafuti bango yango te.
Na Kongo central. Moyangeli etuka abendaki pulusu ya kuna matoyi. Pe abeleli bango bafongola lisusu matoyi pe miso na bango malamu pe makasi po bayeba kokengelaka Kongo central malamu. Pamba te pona ye ba dongolo miso pe batomboki bakokoba kaka kosala mabe na bango na etuka.
/sites/default/files/2025-06/24062025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3